Qui êtes-vous ?

mardi 7 octobre 2008

CONGO GOSPEL frère fredy bengama CONGO MUSIC





Congo musique religieuse, congo music, congo video, congo kinshasa, congo brazzaville, frère freddy bengama chante congo, congo gospel, Nzambe pambola congo, pambola bana nioso ya congo, nse na bolingo tobeleli yo Nzambe ya nguya.


Les paroles de la chanson Congo

_Bolingo na yo eleki bolingo ya bato nioso, Papa, otindaka mwana na yo, ya bolingo Yesu Christu, aya kokufa mpona na biso bana ya Congo

_Pambola, Nzambe pambola, pambola Congo, Nzambe pambola, na bolingo na yo Papa pambola, tosengi kimia na mboka Congo

_Bolingo na yo, soki efandi na Congo, Congo ekokende liboso, Congo ekozonga simate, mpasi na nzala ekozala na Congo te

_Pambola, Nzambe pambola, pambola Congo, Nzambe pambola, na bolingo na yo Papa pambola, tosengi kimia na mboka Congo

_Biso na biso bana ya Congo tolingana, tenons-nous main dans la main, yoka ndenge bana ya Congo bazali kobenga yo, Papa

_Ozali Yahvé Juré, Papa -Ozali Yahvé Rapha, Papa -Ozali Yahvé Nissi, Papa -Ozali Yahvé Schalom, Papa

_Pambola, Nzambe pambola, pambola Congo

_Yo olobi na bolingo na biso bato ya mokili, soki mwana asengi yo lipa, jamais okoki kopesa ye libanga, kasi na bolingo na yo Nzambe, bolingo na yo eleki bolingo ya bato nioso, lelo biso bana na yo, tosengi yo Papa, opambola mboka na biso Congo, pambola, Nzambe pambola _Sabaotmusic.com,Tu es notre lumière, tu es notre espoir, pour construire notre pays le Congo, Papa, nous avons besoin de ton amour, de ta puissance et de ton intelligence, béni notre pays le Congo, béni tous les dirigeants du Congo, et béni tous les enfants du Congo, au nom de ton fils, Jesus-Christ notre protecteur amen.

_Nguya na yo tosengi Papa, nguya na yo tosengi na mboka Congo

_Mayele no yo tosengi Papa, mayele na yo tosengi na mboka Congo

_Pambola, Nzambe pambola, pambola Congo

_Elikia na biso nioso, oh bana ya Congo, ezali epayi na yo Nzambe, oh pambola Congo, ezali na yo Nzambe, kitisa nguya, ezali na yo Nzambe sala makawisi

_Pambola, Nzambe pambola, pambola Congo