Qui êtes-vous ?

vendredi 14 novembre 2008

LA PAIX

YouTube - Freddy Bengama " LA PAIX "
sans Jesus, tout ce que l'on fait est vanité, rien que la vanité
appelons tous le Roi de la paix dans sa bonté, son amour et...
www.sabaot.fr

freddy bengama chante "congo"

freddy bengama - Recherche Google
yoka ndenge bana ya congo bazali kobenga yo, Papa...
ozali yahvé NISSI Papa, ozali yahvé... pambola congo...
frebeng

RDC : MARIAGE






YouTube - fredy bengama"libala"
Que l'homme ne sépare pas ce que Dieu a uni,
le mariage "libala libala" à l'Eglise est un engagement sacré.
Les paroles de la chanson libala
Libala, libala ezali mokano ya Nzambe, esengo na mitema, Nzambe asangi biso lelo, totondi botondi, Nzambe asangi biso lelo, oyo Nzambe asangi, moto mosusu akoki kokabola yango te, Nzambe asangi biso, lelo Papa pambola, pambola libala na biso suki pembe na moto, tobota mpe bana, tomona ba nkoko, Nzambe asangi biso lelo, elikia na biso epayi na yo, na mpasi to na bisengo, kamba libala na biso, na mpasi to na bisengo, kamba libala na biso_Libala ezali mokano ya Nzambe_Ndeko mobali senga na Nzambe alakisa yo mopanzi na yo_Yo mpe ndeko mwasi sengo lolenge moko na Nzambe apesa yo mobali na yo_Nzambe apesaka nse ya malamu, na sima na yango, botika ye meyi atambwisa bino, alleluia, -alleluia, alleluia libala ezali mokano ya Nzambe, -alleluia, alleluia Nzambe pambola libala oyo, -mobali akotika ndako ya baboti na ye, mpona kosangana na molongani na ye, bakokoma nse moto moko, -lelo tosangani mpona libala, esengo na mitema, Nzambe zwa lokumu mpona libala na biso, -Nzambe alobi senga akopesa yo, na sengi ye libala, lelo apesi nga libala, maman Françoise Ashina Musongela, celui qui trouve une femme, trouve le bonheur, -mokano na yo lelo ekokisami, Papa yonde mobateli, yonde mosungi, yonde mokambi, kamba libala na biso, -alleluia, alleluia libala ezali mokano Nzambe, -allelua, alleluia Nzambe pambola libala oyo, -Nzambe yo mokambi kamba, kamba libala ya papa Freddy, na maman Françoise, kamba, suki pembe na moto, tobota bana mpe tomona ba nkoko, kamba, -Nzambe yo mokambi kamba, kamba libala ya bana na yo, -Nzambe yo mokambi kamba, kamba libala ya papa Bidens, na maman Adelle, kamba, ezala na mpasi, nto na bisengo, Nzambe yo mokambi kamba, -Nzambe yo mokambi kamba, kamba libala ya bana na yo, -Nzambe yo mokambi, kamba, kamba libala ya colonel na maman Béa, -yonde mokambi, kamba, yonde mosungi sungi, -yonde mokambi, yonde mosungi, -yonde mokambi, kamba, yonde mosungi sunga, -yonde mokambi, kamba, yonde mosungi sunga mosala oyo bana na yo, bazali kosalela yo, -yonde mokambi, yonde mosungi, -Nzambe yo mokambi kamba, kamba libala ya bana na yo, -yonde mokambi, yonde mosungi, -yonde mokambi, yonde mosungi