Qui êtes-vous ?

samedi 22 novembre 2008

Africa music | Congo libala | musique congolaise

Les paroles de la chanson "Africa"




•Mokonzi wa bileko binso seko, Tata wa biso ozali o likolo, Nzambe mosusu lokola yo azali te, oyo a kopesa ngolu Africa ekende liboso (2X)•Nzambe pambola Africa , kitisa ngolu nayo na Africa (3X)•Paroles:O kombo ya yo tonyata baya bayelaka biso etuma, na bokasi bwa yo tokweisa banguna ba biso, Africa ekende liboso.












Les paroles de la chanson libala_Libala, libala ezali mokano ya Nzambe, esengo na mitema, Nzambe asangi biso lelo, totondi botondi, Nzambe asangi biso lelo, oyo Nzambe asangi, moto mosusu akoki kokabola yango te, Nzambe asangi biso, lelo Papa pambola, pambola libala na biso suki pembe na moto, tobota mpe bana, tomona ba nkoko, Nzambe asangi biso lelo, elikia na biso epayi na yo, na mpasi to na bisengo, kamba libala na biso, na mpasi to na bisengo, kamba libala na biso_Libala ezali mokano ya Nzambe_Ndeko mobali senga na Nzambe alakisa yo mopanzi na yo_Yo mpe ndeko mwasi sengo lolenge moko na Nzambe apesa yo mobali na yo_Nzambe apesaka nse ya malamu, na sima na yango, botika ye meyi atambwisa bino, alleluia, -alleluia, alleluia libala ezali mokano ya Nzambe, -alleluia, alleluia Nzambe pambola libala oyo, -mobali akotika ndako ya baboti na ye, mpona kosangana na molongani na ye, bakokoma nse moto moko, -lelo tosangani mpona libala, esengo na mitema, Nzambe zwa lokumu mpona libala na biso, -Nzambe alobi senga akopesa yo, na sengi ye libala, lelo apesi nga libala, maman Françoise Ashina Musongela, celui qui trouve une femme, trouve le bonheur, -mokano na yo lelo ekokisami, Papa yonde mobateli, yonde mosungi, yonde mokambi, kamba libala na biso, -alleluia, alleluia libala ezali mokano Nzambe, -allelua, alleluia Nzambe pambola libala oyo, -Nzambe yo mokambi kamba, kamba libala ya papa Freddy, na maman Françoise, kamba, suki pembe na moto, tobota bana mpe tomona ba nkoko, kamba, -Nzambe yo mokambi kamba, kamba libala ya bana na yo, -Nzambe yo mokambi kamba, kamba libala ya papa Bidens, na maman Adelle, kamba, ezala na mpasi, nto na bisengo, Nzambe yo mokambi kamba, -Nzambe yo mokambi kamba, kamba libala ya bana na yo, -Nzambe yo mokambi, kamba, kamba libala ya colonel na maman Béa, -yonde mokambi, kamba, yonde mosungi sungi, -yonde mokambi, yonde mosungi, -yonde mokambi, kamba, yonde mosungi sunga, -yonde mokambi, kamba, yonde mosungi sunga mosala oyo bana na yo, bazali kosalela yo, -yonde mokambi, yonde mosungi, -Nzambe yo mokambi kamba, kamba libala ya bana na yo, -yonde mokambi, yonde mosungi, -yonde mokambi, yonde mosungi.